dimanche 19 mars 2017

IIIème dimanche de Careme- A

Lomingo la Isato la Karezimu
**************
Bandeko, mai Nzambe apesi bato ba ye na maboko ma Moize mazali elembo ya mai ma bomoi Yezu akopesa biso. Soko toyambi mai mana, tokoki kosalela Nzambe na bosolo.

Losambo la Ebandela
E Mokonzi, yo liziba lya malamu manso, olakisi biso nzela ya kobika o lisumu: tolala nzala, tosambela mpe tokaba biloko.
Toyebi botau bwa biso, tondimi 'te tosali mabe, obikisa biso na bolingi bwa yo bonene. Tokobondela bongo...

Litangi lya Yambo:
Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya bobimi (17,3-7)
" Ntango bana ba-Israel bazalaki o eliki, bayoki mposa ya mai; basiliki na Moize, balobi: mpo nini obimisaki biso o Ezipeti? Olingi nde koboma biso na mposa ya mai, na bana na nyama ya biso? "

Litangi lya Ibale:
Mokanda mwa santu Polo ona bakristu ba Roma ( 5,1-2.5-8)
bandeko, awa tokomi bato ba bosembo mpo ya boyambi, tokomi na boboto biso na Nzambe mpo ya Mokonzi wa biso Yezu Kristu"

Nsango Elamu lokola santu Yoane akomi

"Yezu akomi o Sikar, mboka yoko ya Samaria, penepene na mabele maye Yakob apesaka mwana wa ye Yozefu, Libulu lya mai lya Yakob lizali o esika ena. Yezu alembi na botamboli. afandi o pembeni ya libulu lyango. Ezalaki penepene na ngonga ya midi. Mwasi moko wa Samaria ayei kotoka mai. Yezu alobi na ye: " pesa ngai mai namele"...

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO