lundi 27 février 2017

Toluka liboso bokonzi bwa Nzambe...!

Nsango ndamu totangaki lobi mokolo mwa lomingo
*************************
Awa bayekoli basangani na ye, Yezu alobi na bango: 
"Moto moko te akoki kosalela bakonzi babale: to akoyina moko mpe akolinga mosusu; to akondima moko mpe akokinola mosusu. Bokoki kosalela Nzambe mpe mosolo te. Yango wana nalobi na bino: bomitungisa te mpo ya bomoi bwa bino soko bokoliya nini, 

to mpo ya nzoto soko bokolata nini. Bomoi boleki bileyi te? Nzoto eleki bilamba te?
Talani ndeke ya likolo: ikokataka bilanga te, ikobukaka mbuma te, ikosangisaka yango o bibombelo te. Kasi Tata wa bino o likolo akoleisaka yango! Bino boleki ndeke na motuya te?
Nani o ntei ya bino, ata amitungisi ndenge nini, akoki kobakisa ata mokolo moko na bomoyi bwa ye? Mpe ntina nini bokomitungisaka mpo ya bilamba?
 Talani ndenge nini fulele ikokolaka o bilanga: ikoyokaka mpasi na mosala te mpe ikosonoko bilamba te. Kasi nalobi na bino: ata Salomo na nkita ya ye inso, alataki lokola fulele ina  te.
Bongo soko Nzambe akobongisaka matiti ma bilanga bongo, maye mazali lelo mpe makobwakema lobi o moto, akosala bino malamu maleki te? Bino bato ba boyambi boke.
Botika komitungisa mpe komituna: Tokolia nini? Tokomele nini? Tokolata nini?
Bapagano nde bato bakolukaka biloko bina binso. Nzokande Tata wa bino o likolo ayebi ' te bosengeli na byango binso.
Boluka liboso Bokonzi bwa Nzambe mpe bosembo bwa bwango; biloko biye binso nde babakiseli bino nsima.
Bongo bomitungisa te mpo ya mokolo mwa lobi. Mpasi ya lobi ekoki na lobi. Mokolo na mokolo mozali na mpasi ekoki na mwango.
A chaque jour suffit sa peine!
Lokumu na yo, Kristu!

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO