jeudi 24 décembre 2015

Mokanda ya Mbotama ya Tata Episkopo



MBOTAMA YA MOKONZI YEZU 2015
MOKANDA ONA BANDEKO BAKRISTU BA DIOCESE YA INONGO MPE ONA BATO BA MOTEMA MOLAMU
« Ngondo akobota mwana mobali, mpe bakopesa Ye nkombo Emmanuel, nkombo eye lokola’te Nzambe azali an biso » (Mt1, 23).
Mbotama, nsuka ya bondeko ya Bolingo Nzambe akati na biso bato !
Bandeko ba bolingo,
Eyenga elamu ya Mbotama na bino banso. Eyenga elamu ya boyei bwa Mwana-Nzambe epai ya biso bato, o nse. Ya solo “nkembo na Nzambe o likolo, mpe o nse boboto na bato ba Ye ba bolingo” (Lc 2, 14).
Eyenga ya Mbotama ya mobu moye mozali koleka na kati ya matanga makweli biso na diocèse ya biso, na Mai-Ndombe mobimba…Lokola toyebi, mokolo mwa mitano le 18 Decembre, tobungisi bandeko 20 na likama lya mai lisalemi na libongo ya Inongo. Bandeko balingaki kokende mobembo na Kiri. Tokanisa na bango. Tosambela mpo ya bango. Tosangana na mpasi nab aye banso babungisi ndeko to moyebani. Toyeba mpe, bandeko, komibatela mpe kobatela bomoi ya baninga na mibembo tozali kosala to kobongisa mpo ya bango…
Bandeko ba bolingo,
O mokili mwa Yudea na mboka nkombo Bethleme, mokolo moko, eleki mibu nkoto mibale, mwana Nzambe andimi kokoma moto, kobotama, lokola bana bake banso, na mama moko ya biso ya nse (Gal.4, 4). Ezali ndoto te, ezali ya solo. Ezali likambo limemi na mokili mobimba mbongwana(changement) ya nsomo mpo ya biso bato o nse. Mwana Nzambe andimi kokoma moko wa biso. Andimi kolata botaw bwa biso bato ndenge tozali: bomoto bwa biso mobimba, liwa mpe( Jn 1, 14). Soko olingi kokutana na Nzambe, luka Ye o kati ya bato, mpenza mpenza bato babola, baye bazanga bato, baye bazali na nzala, bato ya malady, baye bazali na boloko, bampaya (Mt 25, 31-46). Nzambe ya ndenge boye, nde nani! Bondeko bonene akati na biso bokangi Ye na moto nyonso, na bomoto bwa biso, na bikelemo bizali kozinga biso.
Bandeko ba bolingo,
Oyo nde ntina mpenza ya feti ya Mbotama. Kobanda Nzambe akomi moko wa biso, moto nyonso, mpenza mpenza moto oyo abwakama, moto oyo abengami “moto mpamba”, akoki kobinela bomoi. Akomi na kilo ( valeur), azali lisusu Ye moko te, akoki komibwaka na makambo manso ma bomoi. Ntina ya nyonso euti na bolingo ya ngolu ya Nzambe mpo ya bato (Tite 3, 4-7). Bobele bolingo bwa solo bokoki, ya solo, kobongola bomoi bwa biso, kobikisa biso o mabe manso.
Yango wana, bandeko, mobu moye mosantu mwa Ngolu Papa François asengi mpo ya Ekklezia mobimba, ezali ya solo, ntango ya bomoi bwa sika Nzambe akabeli biso. Ezali ya solo nzela ya mobembo ya ngolu ya Nzambe:ayei kotala biso mpo atambwisa makolo ma biso o nzela ya boboto” (Lk 1, 79). Na mobu moye mosantu ya Ngolu ya Nzambe, tokoki lisusu te konyokolo moninga, kotala moninga moto mpamba, kotiya moninga moto pembeni. Ezali  ntango ya etumba ya bandeko mpo ya bato banso, mpenza mpenza mpo ya bandeko babwakama lelo. Ezali ntango ya kosimba makasi bato bataw; ntango ya kolendisa baye balembi; ntango ya komema esengo nab aye bazangi elikya. Na mobu moye mosantu ya ngolu, tosengeli komifungwama. Mokonzi azali kosenga biso ‘te tomonisa ngolu ya Ye na bato banso. Mokon,zi azali kosenga biso’te tokabola biloko nab aye bazanga. Soko tosali bongo te, bolingo bwa Nzambe oyo tozali kosakola bokotikala bobele maloba mpamba (1 Jn 3, 17-18).
Bandeko ba bolingo,
Kobanda ntango Mwana-Nzambe amikomisi ndeko wa biso bato, tozali lisusu biso moko te mpo ya kotonga mokili mwa sika, mokili mwa bosembo mpe ya bondeko. Elongo na Ye mpe o nkombo ya Ye, tosili tokoti na “civilisation ya sika”, civilisation” Papa Paul VI abengi “civilisation ya Bolingo”. Lelo, bandeko, tozali liboso ya nzela mibale ya bomoi: nzela ya bondeko  to nzela ya liwa. Na nguya enene ya Bolingo ya Mwana-Nzambe oyo andimi kokoma “nsuni ya nsuni ya biso, mpe makila ya makila ma biso, tokoma” bilombe ya bolingo” mpo ya moto nyonso na kati ya bomoto bwa Ye mobimba, bilombe ya bolingo mpo ya bikelamo binso. Bongo tokotonga solo mokili ya boboto, boboto boye bozali likabo ya Emmanuele.
Bandeko ba bolingo,
Nzambe wa biso ayokela biso mawa mpe abenisa biso( Nzembo 66) mpo’te biso tokoma bobenisi mpo ya baninga bato mpe mpo ya nse mobimba. Bobele lelo na lobi te, kasi mikolo minso mizali koya na mobu ya sika mokomi penepene, 2016.
Eyenga elamu ya Mbotama na banso!
Inongo, le 24 Décembre 2015
Wa bino Tata Episkopo,
+Philippe NKIERE KENA

Aucun commentaire:

Mgr Philippe NKIERE KENA

Mgr Philippe NKIERE KENA
Evêque d'Inongo (2005- )

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO

Mgr Jan Van Cauwelaert

Mgr Jan Van Cauwelaert
1er Evêque D'Inongo(1959-1967)

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
Evêque Emérite(1967-2005)