jeudi 4 décembre 2014

Letrre pastorale de Mgr l'évêque: version lingala!



MOKANDA ONA BANDEKO BAKRISTU BA DIOCESE YA INONGO:


NZELA TOKOLANDA MPO YA MISALA MYA DIOCESE NA MOBU MOYE
MWA JUBILE 2014-2015.

Mobu moye, mobu mwa ngolu, mobu mwa bomoi(Lc 4, 19; Jn 10, 10). Tobikela bomoi lisanga na ndenge ya sika.

Bandeko ba bolingo,

Mokonzi Yezu oyo ozali o kati ya biso akabela bino bolamu na boboto ! Apesa biso banso nguya ya sika mpo tobikela bomoi bwa biso mobu moye lokola ba témoins baye ba solo ! Amen.

Bandeko, mobu moye mozali solo mpo ya biso mobu mwa bobenisi bwa Nzambe. Tozali na kati ya Jubilés mpe likambo ya mabota. Tozali liboso na Jubilé ya mibu ntuku mitano ya liwa ya martiro ya wa Esengo Marie-Clémentine Anuarite. Ezali jubilé etali Ekklezya mobimba ya biso ya RDC. Mpe lisusu awa epai na biso na diocèse, tozali na Jubilé ya bonganga- Nzambe : mibu ntuku mitanu(50 ans) mpo ya Tata Episkopo wa biso ;  mibu ntuku mibale na mitano(25 ans) mpo ya banganga-Nzambe ya biso mitano ; tozali mpe na jubilé ya bomibonza na Nzambe mpo ya banyango ba biso motoba(6), bakokisi mpe mibu ntuku mibale na mitano (25 ans) kobanda bakomi banyango. Lisusu tosepeli mobu moye, mibu ntuku mwambe na mitano(85 ans) ya mbotama ya Tata Episkopo Léon LESAMBO, mpe mibu ntuku minei na mitano(45) ya libandela ya lingomba ya banyango ba biso ya SIC/Diocèse d’Inongo. Mobu moye mozali mpe «  mobu mwa mabota » mpo ya Ekklezya ya biso ya Congo. Nzambe azwa lokumu mpo ya mabota manso ma diocèse ya biso mpe ma mokili mobimba. Mikolo mileki likita lizalaki na Roma mpo ya mabota.



Bandeko ba bolingo,

Ezala mpo ya Jubilés, ezala mpo ya mobu ya mabota, Nzambe  azali komonisa biso ‘te azali Nzambe ya ngolu mpe ya bomoi.

Ya solo, bandeko, ata na kati ya masumu mpe mabe ma biso ya ndenge na ndenge, Nzambe atikali kolakisa biso, o bileko na bileko, motema ngolu ya Ye (Lk 1, 50). Atiki biso te, mpe akotika biso mokolo moko te : « ngai nakobosana bino mokolo moko te ! Tala nakomi nkombo ya yo  o kati ya loboko la ngai, nakopanganaka na mboka ya yo ntango inso »( Iz 49, 15-16). Bomoi bwa  Ye mobimba Yezu asakoli mpe amonisi na bato banso, mpenza mpenza na bato bake ngolu ya Tata (Lk 4, 19 ; 15, 1-32). Tee na kati ya liwa, tee na baye bakoboma ye, Yezu asengi Tata bolimbisi mpo ya bango : « Tata, limbisa bango ! Bayebi te nini bazali kosala » (Lk 23, 34). Nsima ya nsekwa ya ye, Yezu apemeli biso bayekoli baye mpema ya bolingo, mpema ya ngolu mpo ‘te tomema na mokili mobimba nguya ya ngolu, nguya ya bolimbisi (Jn 20,21-23). Kasi biso lelo bayekoli ba Yezu, tosali nini na nguya wana?

Bandeko, tolobi mpe ‘te Nzambe wa biso azali Nzambe ya bomoi : Ye moko azali Bomoi mpe mokeli wa bomoi. Bomoi bonso bowuti na Ye (Lib.1, 1-3 ; 2, 1-23). Ye moto apemeli biso mpema ya bomoi bwa ye mpe tozwi bomoi(Lib.2, 7). Ye moto atindeli biso mwana wa Ye, oyo akomi moto mpo ya biso mpe andimi koleka na kati ya liwa lokola biso, Abuki bokasi bwa liwa, afungoleli biso bato bomoi bwa seko. Na biso baye tondimi Yezu, Tata akabeli biso Elimo ya Ye ; tokomi, o nkombo ya Ye, bana ba Tata(Jn 1,12). Tobimi na boumbu bonso ; totondi biso mpe na bomoi bwa Yezu Kristu (Gal.4, 4-7).  Tozali « bato ba bomoi » ; « bato ba nsekwa ». Tozali na bomoi wana mpo ya komema bwango na baninga mpe na bikelamo binso. Kasi tozali kosala nini na nguya ya bomoi oyo ezali na biso? Na mobu moye, Mokonzi azali kosenga biso ‘te moko moko wa biso mpe lisanga mobimba ya diocese ya biso totika kolelalela mpe kobanga. Tokota na ntango ya sika, ntango ya ngolu ya Nzambe, ntango ya Bomoi mpo ya biso moko, mpo ya mabota ma biso, mpo ya diocese ya biso, mpo ya ekolo ya biso… Yango wana na nkombo ya Mokonzi Yezu nakosenga bino banso boye:

1.       Liloba lya Nzambe lizali mwinda o nzela ya bomoi. Paroisse moko moko to CEV moko moko eluka nzela inso mpo bandeko bakoka kotanga mpe koyoka Biblia, komanyola yango, kosambela. Yango wana, tosengeli na ba « animateurs bibliques » na paroisse mpe na CEV inso… ( Synode ya yambo ya Afrika).



2.       Na paroisse inso ya diocèse, mokolo mwa minei mokozala mokolo ya adoration: kobanda ntongo, nsima ya misa tee na mpokwa na 18h00    (esika CEV ezali bakosukisa na 15h00’). Moto na moto akamata ntango ya kokumisa Mokonzi na Ukaristya Esantu. Ukaristya Esantu ezali mpe ekotikala «  Sakramentu ya basakramentu mpe liziba ya ngrasya inso biso bakristu tokoki kozwa» ( Vat.II). Yango wana ndeko na ndeko mpe lisanga toluka kokutana mbala na mbala na Mokonzi wa bomoi o likabo lya Bomoi bwa Ye na Ukaristya.



3.       Na Paroisse inso ya diocèse, tokosala ntubela ya lisanga mbala moko na sanza. Tokabola mokolo mpo ya bilenge na bana mpe mokolo mosusu mpo ya bakolo. Banganga-Nzambe balimbola malamu mpe polele ntina ya Sakramantu ya ntubela



4.       Mokolo mwa mitano, awa tokokundola liwa ya Mokonzi, tokokundola bandeko bazali  na kati ya mpasi ndenge na ndenge. Yango wana, Paroisse na Paroisse to CEV ebongisa makabo matali bokutani mpe lisalisi lya bandeko bazali na lopitalo, na boloko, na bandeko ya mpasi ndenge ne ndenge. Bazali mpe nzoto ya Mokonzi lelo.



5.       Mokolo mwa mposo, mokolo mwa Mama Santu Maria. Mokolo mona tokosambela, na bolobeli bwa Mama mpo ‘te boboto boya o ekolo ya biso mpe o mokili mobimba.



6.       Bokutani na CEV ezali mobeko mpo ya bandeko bakristu banso ya diocèse ya biso. Ndeko moko amitya likolo ya mobeko moye te. Nasengi yango lokola Episkopo. Mobu moye tokomanyola makambo matali « bolimbisi, bosembo mpe boboto »(réconciliation, justice et paix) lokola Synode ya mibale ya Afrika ezali kosenga biso.



7.       Losambo la mpokwa na mabota esalema ndenge tosili tosengaka yango. Babeta ngonga ndenge tosengaki mpo ya kokundola ntango ya losambo na mabota.



8.       Kosalisa Ekklezya na mbongo to biloko ezali mpe mobeko.Mokristu moko moko mokolo asengeli kofuta 1000 Fc o mobu mpe mwana 500 Fc. Paroisse na Paroisse mpe CEV na CEV esimba likambo liango malamu.

9.       Misala ( salongo) mpo ya kobongisa paroisse, kosala bilanga ya lisanga, kobongisa mboka ezali likambo ya biso banso. Paroisse na paroisse, CEV na CEV esimba mpe likambo wana ndenge esengeli.



10.  Mpo ya jubilé ya Tata Episkopo na doyenné moko moko, tokosala boye : tokobanda liboso na mikolo misato ya retraite. Soko feti ezali, tobosana babola te : basengeli kozala mpe wana.

Bandeko ba bolingo,

Makambo tosengi bino na nkombo ya Mokonzi Yezu mazali nzela mpo tobikela malamu lisanga mobu moye mwa « Jubilés » mpe mwa « mabota ». Tata akabeli biso mobu mwango lokola likabo…lokola ntango ya libiki.

Bandeko,

Nzambe wa biso alingi biso mingi, biso bana baye. Nguya ya bolingo bwa ye ekoma bokasi ya bomoi bwa biso. Tokoma bongo bobenisi mpo ya mboka, mpo ya diocese, mpo ya ekolo…Nzambe Yemei afungola biso mitema mpe abenisa bino na maboko natandeli bino, lokola mosaleli wa mokonzi Yezu mpe wa bino!

Inongo, le 31/10/2014

Wa bino Tata Episkopo,

+ Philippe NKIERE KENA

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO