dimanche 20 avril 2014

Exultet/ Mbonda ya Pasika

Mwinda mwa Kristu
Tokotondo Nzambe

Mbonda ya Pasika / exultet

1.Bosepela, mampinga ma banzelu.
Nse yoka nsai, Eklezya mpe sepela.
O kati ya tempelo eye butisani mpe nzembo. Kristu asekwi, tosekwa biso na ye.
2. Mokonzi wa biso, elombe ya banzelu, atondisi nse mobimba na nkembo ya ye.
Mama eklezya atondi na lokumu- Kristu asekwi...
3. Tala pasika ya sika, ya solo mpenza. Oyo bakoboma, mpata mpata mpenza.
Makila ma ye masantisa bakristu!- Kristu asekwi...
4. Butu bonene obikisaki bana ba Israel. Babimi o ezipeti, bakatisi mbu Etane.
Opetoli bango mitema, na lipata. Kristu asekwi...
5. Butu bonene, Kristu akataka minyololo mwa liwaaa.
Abuti bo elombe, awuti o nse ya mabele.
Amemi nse mobimba na ye, ye molingi wa etumba aa. Kristu asekwi..
6.Na butu boye bosantu, kamata e Tata Mosantu mwinda mwa biso.
na yango babenisi bana ba ekolo ya yo basangani bakobonzela yo.
Lokola nde mwa libonza lya mpokwa- Kristu asekwi..
7. Tokosenge yo Mokonzi, oyangela obatela mpe.
Ba Nganga Nzambe na bakristu banso ba nse.
Elongo na papa mpe wa biso episkopo. Kristu asekwi...
8. Nsai ya pasika etikala o mitema seko. Tobwaka bisengo bya nse, tokangisa mitema se o likolo;
Tosangana na Mokonzi Yezu, mwinda mokopela seko ! Kristu asekwi..

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO