mardi 13 septembre 2011

Bobanga te. N'ayez pas peur: message de Mgr l'éveque

DIOCESE D’INONGO

MOKANDA MWA TATA EPISKOPO NA BANDEKO BAKRISTU YA DIOCESE YA INONGO…






Tokomi penepene na maponomi (élections)

« Bobanga te : ngai nalongi mokili « (Jn 16, 33)

Tomikotisa na kati ya maponomi (élections) ndenge nini ?

Bandeko ba bolingo,

Nzambe, Tata wa Mokonzi wa biso Yezu Kristu mpe tata wa biso, atondisa biso banso na nguya ya Elimo Santu.

Bandeko,

Etikali bobele sanza mibale na ndambo, liboso ‘te ekolo ya biso ekota na « élections ». Ezali ntango ya kopono bato ya sika oyo bakoyangela biso mpo ya mibu mitanu. Ezali likambo ya liseki te ; ezali likambo ya bomoi ya biso. mpe bomoi ya biso ezali likabo lipusi kitoko Nzambe apesi biso. Ezali likambo etali bobele boko bato te ; ezali likambo etali biso banso, mpo ekolo oyo ezali ya biso banso. Ezali likambo ya kobikela na kati ya bobangi te, na kati ya lokuta te, na kati ya bokabwani te, na kati ya nkanda to bitumba te : mobulu mobongisaka makambo te.

Yango wana, bandeko ba bolingo, nakomeli bino mokanda oyo, lokola ba Tata Episkopo banso tokomeli mpe na ekolo mobimba.

Bandeko,

Mokonzi Yezu azali na kati ya mpasi oyo ekolo ezali komona sik’oyo. Esika biso baleki baye tozali kokelela, koganga, kolela, Ye akoki kozanga kozala wana te. Tata apesi Ye mosala ya kopesa biso bomoi mpe bomoi solo’solo’. Ntina wana Mokonzi alobi polele : « bobanga te, ngai nalongi mokili », mokili ya molili, ya bokosi, ya bonguna, ya bokabwani. Akosenge biso baleki ya Ye ya Mai-Ndombe ‘te tokota na kati ya élections oyo na nkombo mpe na nguya ya Ye. Tokabwana te, tokota na kati ya makambo ma lokuta te, na kati ya bobebisi biloko ya baninga te. Tokota na kati ya élections na bosolo, na bosembo mpe na boboto. Elections ekoleka, kasi bomoi ya baninga bato boleki motuya.

Likabo ya ekolo kitoko mpe monene tozwi na maboko ya Nzambe, bondeko boye bozali kosangisa biso na kati ya Kristu, bosolo mpe bosembo, wana nde makambo totiyi liboso. Bobele na bokasi ya bolingo, tokolonga manso.Lokoso yam bongo ebebisa biso te.

Bandeko,

Nzela nini tolanda mpo élections eleka malamu ? Toyoka ndenge ekomami na mokanda ya batata episkopo ya ekolo ya biso. Elobami boye : « Tosengi na bino boye :

· Bana ba ekolo bazala na bokengi na baye bakoyela bango mambi ya lokuta mpo na kosepelisa mposa ya mitema mya bango lokola : madesu ya bana, bilamba, limeli, to mpo azali ndeko na ngai to mpo tozali na ye engumba yoko. Boponi bozala bwa bonsomi mpe bouti o nteyi ya motema

· Na baye bazali kokamba gouvernement bakoba kobatela bana mboka mpe bakeba ‘te mosolo mwa ekolo mobimba mpo ya boponomi ya boko bato

· Na ba polisi mpe ba mampinga ma basoda bakeba ‘te manso maleka malamu, mpamba te bango bazali na mambi ma politiki te, bazali mpo ya bobateli kimya ya solosolo o ekolo, yambo ya maponomi, na eleko ya maponomi mpe nsima ya mango.

· Na baye bakosala mambi ma politiki, basala ‘te manso maleka na bolamu, balakisa ‘te bazali bato babokuami na ndenge esengeli na mambi ma demokrasi, maloba mpe ezaleli ezala ya kilo, ya lokumu mpe ya limemya ona baninga basusu mpo bazali banguna te. Balakisa polele na bana ekolo lolenge nini bango bakosala mpo ya kotombola ekolo soko baponi bango.

· Na baye batali mambi ma bopanzi sango, engebene na mitindo mya mosala mwa bango, basengeli mpe na bokebi mpamba te bobebisi makanisi mpe maloba ma baninga, lokuta, kobakisa to kolongola na nzela ya bolimboli maloba to makanisi, to makomi ekokabola bato mpe ekoki kobimisa mobulu. Songi songi ezala te na lolenge la bango la bosali mosala.

· Na bandeko ba mboka ya bapaya, basalisa biso bobele na bisaleli mpo ya maponomi mpe na ntoma ba solosolo baye bakotalaka esalemeli ya maponomi, baye bakotikala ntango inso na katikati mpe bakokotela moto moko te.

· Na bamibonza banso ona ekolo ya biso, moko te amiyingisa na misala mya politiki to azala mokambi to molobeli wa boko ya masanga mapolitiki, ma leta to ma bolengeli maponomi.

· Ona ba nganga Nzambe, toteya bobele liloba lya Nzambe mpe tolakisa mateya ma botombuani bwa moto engebene mateya ma Eklezya. Moko te apesa soki moke te maloba na Ndako Nzambe na bato ba politiki, mingi mpenza ntango misa makosambelamaka »

Na diocèse ya biso, kobanda 15 septembre tee 28 novembre

· Tokosambela mpo ya ekolo (na nzembo : E Nzambe, batela ekolo ya Kongo), liboso ya bobenisi na misa

· Tokosala adoration mbala moko na mposo

· Na nsima ya mposo mibale mibale, tokosala ntubela ya lisanga mpo ya kosenga bolimbisi na Mokonzi mpo ya masumu ma biso bana Kongo mpe tokopesana boboto mpe bolimbisi biso na biso.

· Tolanda formation eye ekopesama likolo ya makambo ya élections.

Bandeko ba bolingo,

Nzambe abatela biso banso mpe ekolo mobimba. Nguya ya bolingo ya Ye emema biso mikolo mikoya.

Botikala na boboto mpe Nzambe Ye moko abenisa bino.

Inongo, le 12 Septembre 2011

Wa bino Tata Episkopo,

+ Philippe NKIERE KENA

Episkopo wa Inongo.

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO