jeudi 23 décembre 2010

Lettre pastorale de mgr l'évêque pour Noël . Mokanda mwa mbotama mwa tata Episkopo


MOKANDA MWA MBOTAMA (2010) ONA BANDEKO BAKRISTU BA DIOCESE YA INONGO

LELO BABOTELI BINO MOBIKISI...” (Lc 2, 11).

Mobikisi azali o kati ya biso tobanga lisusu nini ?


Bandeko ba bolingo,

Eyenga elamu ya Mbotama na bino banso.

Bolamu bwa Nzambe, liziba lya libiki lya bato banso, bozala na bino ntango inso” (Tite 2, 11).

Bandeko,

Awa tozali kokundola lelo, mpe mikolo mikoya, boyei bwa mwana Nzambe o kati ya biso bato, tondimi kokota na kati ya likambo moko monene. Tondimi ‘te mokili mwa biso bato mozali lisusu lokola liboso te. Tokoti na ntango ya sika, ntango ya libiki. Soko na ntongo moi mobandi kobima, nsuka ya butu ebelemi. Banda mokolo mwana-Nzambe ayei epai ya biso bato; na bomoi bwa Ye mobimba, na liwa lya Ye, na nsekwa ya Ye tee lelo, atondisi mokili mobimba na nguya ya libiki lya Ye. Mpe biso baye toyambi Ye, tozwi nguya mpe likoki ya kozala bana ba Nzambe (Jn 1, 12).

Bandeko ba bolingo,

Soko totali lisolo ya bomoi bwa biso malamu, tokoki komona bilembo ebele ya libiki mobikisi Yezu amemeli biso bato. Totala se bilembo mibale mpamba na mbula eye 2010.

Na mobu moye, towuti kosepela mibu ntuku itano ya bonsomi ya ekolo ya biso. Otali lisolo ya ekolo ya biso na mibu mina ntuku itano, okamwi ! Banda libandela, toleki na mpasi ndenge na ndenge, na bitumba ndenge na ndenge, na mikakatano. Kasi na kati ya mpasi ina inso, Nzambe atiki biso mokolo moko te. Mbala na mbala nguya ya Yezu Mobikisi ememi biso mpe elongoli biso na boumbu boye banguna ndenge na ndenge balingaki kokotisa biso na kati.

Libiki lya Nzambe ndelo te, tomoni yango lisusu na mbula oyo awa tosepeli na Paroisse Sainte Croix/Bokoro, mbula nkama moko ya liloba lya Nzambe. Mbula nkama moko ya libiki lya Nzambe o kati ya bato. Mbula nkama Mokonzi alakisi lobokÓ (fidelité) la ye mpe bolingo ndelo te. Bandeko bamemeli biso liloba lya Ye, bakolisi na biso bomoi bwa bana ba Nzambe na basakramentu. Mpo ya liloba, tozwi bandeko bakozinga biso, bakolendisa biso mpo tokende liboso, bakosalisa bandeko bazali na mpasi bayeba kokanga motema mpe komema mpasi ya bango.

Bandeko,

Lokola ameseni kosala, Nzambe ayei epai ya biso mpe amilakisi na biso na bilembo binene te. “Bokoyeba ye boye : bokokuta mwana abotami sika bazingi ye na bilamba, alali o elielo ya bibwele” (Lc 2, 12).
Nzambe ayei o kati ya biso bato na bomikitisi, lokola mungwa na kati ya nzungu.

Eyenga ya Mbotama esengeli kosalisa biso mpo tobongola ndenge ya biso ya kotala baninga. Tosengeli kopesa kilo (valeur) na baninga batu, mingi mpenza na baye banso bayantami, babwekemi, batu batau, baye tokotala lokola batu mpamba. Yezu ayei liboso mpo ya bango.

Nini tosala mpo ‘te topesa kilo na baninga bato, mpo ya kosimba bato batau, bato ya mpasi ?
Ngonga ebeti mpo ‘te eyenga ya mbotama ezala mpo ya banso ntango elamu ya kobongola ezaleli ya biso. Ntango elamu ya kosimba baninga baye tokotala lokola batu bake, batu mpamba. Mokili mozali kobeba mpo bonyati bato bake boleki.

Nzambe amikomisi motu lokola biso, moko wa biso mpo ‘te biso tokoma batu ya baninga, tokoma bandeko, tozala lisanga.
Mbotama ezali eyenga ya lisanga, ya libota. Mbotama eyei kosukisa bongai (individualisme). Na bongai tokotonga lisanga te, bongai bokokabola bisu. Totika bongai, mpe lisanga tosepela elongo, tolimbisana, tosimbana makasi. “Lisanga na bokasi ya bolingo tokolonga”.

Tosepeli mpe mingi awa na ekolo ya biso, na eklezya ya biso tozwi Cardinal ya sika, Mgr Laurent Monsengwo, oyo azali mwana mboka, mwana ya diocèse ya biso ya Inongo. Tosimba ye makasi na nsambo ya biso mpo ‘te akokisa malamu mosala azwi mpo ya bolamu mpe libiki lya bandeko ya Kinshasa, oyo azali kokamba, mpe ya ekolo ya biso mobimba.
Alakeli koya kotala biso na sanza ya Février (2011). Tokolikya ‘te tokozala ebele mpo ya koyamba ye, kolendisa ye.

Na bino banso lisusu, eyenga elamu ya Mbotama.

Mokonzi oyo ayei kobikisa biso mpe azali kosala bongo mokolo na mokolo alongola biso na boumbu bonso bwa kala. Akomisa biso mpe “babikisi” ya baninga mpe ya mokili. Akamba biso na nguya ya Yemei mobu moye mwa sika 2011.
Napesi bino bobenisi bwa Nzambe wa biso, oyo azali, azalaki mpe akoya.
Wa bino Yaya,
Mgr Philippe NKIERE KENA,
Episkopo wa Inongo.
Inongo mwa le 15 décembre 2010.

Aucun commentaire:

Mgr Philippe NKIERE KENA

Mgr Philippe NKIERE KENA
Evêque d'Inongo (2005- )

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO

Mgr Jan Van Cauwelaert

Mgr Jan Van Cauwelaert
1er Evêque D'Inongo(1959-1967) dcd 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
Evêque Emérite(1967-2005) dcd 19.11.17