dimanche 12 avril 2009

Lettre pastorale de Paques ( Mgr Philippe Nkiere: éveque d'Inongo)


DIOCÈSE D'INONGO

EVECHE

 

MOKANDA MWA PASIKA 2009 (DIOSEZI WA INONGO)

(Totanga mokanda moye to o lomingo la Pasika to moko mwa lomingo ya Pasika tee liboso ya Eyenga ya Nkitela ya Elimo Santo).

 

 

"Asili asekwi, azali awa te...Azali kokende liboso lya bino o Galilea; bokomono ye kuna" (Mc 16, 6-7).

 

 

Bandeko bakristu ba bolingo,

 

Natombeli bino eyenga elamu ya Nsekwa ya Mokonzi. Mokonzi Yezu oyo abuki  bokasi bwa liwa, atondisa biso na nguya ya sika. Tokoma bato batondi na bomoi, "bato ya nsekwa"; bato bakopesa bomoi na baninga bato mpe na mokili moye Nzambe apesi biso. Eyenga elamu ya Pasika.

 

Bandeko,

 

Eleki kala mingi te tosalaki na bandeko ba nganga-Nzambe banso ya diocèse , likita linene awa na Inongo. Tosololi likolo ya ndenge nini tozala banganga-Nzambe lokola "basaleli ya bomoi" mpo 'te bokonzi bwa Nzambe boya. Tomanyoli mingi liloba oyo ya Mokonzi Yezu na Nsango Elamu ya Yoane : "Moyibi akoya bobele koyiba, koboma mpe kobebisa. Ngai nayei mpo 'te mpata izwa bomoi, izwa bwango mingi." (Jn 10, 10). Tomoni 'te tosengeli, biso ba  nganga-Nzambe, kolanda mpe nzela wana. Mpo na yango, esengeli 'te biso moko liboso tozala na bomoi solo; ezala na makambo matali bomoi ya biso na Nzambe; ezala na makambo matali bomoi ya biso na nzoto, na mayele, na bomoto bwa biso. Tomoni 'te tosengeli koluka ndenge nini tosala mpo 'te bomoi ya bino bandeko Nzambe apesi biso bokola solo na makambo manso. Tomoni 'te biso banso tosengeli komibwaka na bomoi bwa sika na  losambo pe na  misala, ezala misala ya bilanga, ya bibwele, ya ebale to bokila; banso tobima na goi-goi mpe na bobangi mpo 'te tokolisa lisanga bomoi (bomoi ya biso moko, bomoi ya baninga bato, bomoi ya mokili ya biso ya Mai-Ndombe).     

 

Bandeko ba bolingo,

 

Toyoki na Nsango Elamu ya Marko ndenge bandeko basi basato bakendeki ntongo ntongo mokolo nsima ya sabato na liliita mpo ya kotala esika batiyaki nzoto ya Mokonzi. Kasi ekomi bango  kuna, bamoni lilita lisili lifungwami . Babangi mingi. Anzelu wa Nzambe alobi na bango : "Bobanga te. Bozali koluka Yezu wa Nazarete oyo babakaki o kuruse; asekwi, azali awa te... Bokende koyebisa bayekoli ba ye na Petro 'te azali kokende liboso lya bino o galilea; bokomono ye kuna." (Mc 16, 1-7).

 

Bandeko,

 

Biso banso toyebi 'te Galilea ezali mokili oyo, nsima ya batisimo, Yezu abandaki kosakola liloba ya Nzambe. Ezali mpe esika abengaki bayekoli ba ye ba yambo, esika abandaki mosala lisanga na bango; esika atamboli mpo ya koteya; esika amemi bato libiki : abikisi bato bakufwa miso, bato bakufwa makolo, azongisi basumuki na  nzela ya bomoi bwa solo. Galilea ezali mpe esika asalaki mpe mosala ya maboko na Nazareth. Galilea ezali esika amonisi solo ndenge moto asengeli kobika; bomoi Tata apesi Ye, amipesi mobimba mpo ya kosimba yango makasi mpe kokabola yango na baninga bato.
Galilea ezali esika Yezu abundi etumba ya bomoi mpo 'te bokonzi bwa Tata boya solo, na maloba ma Ye, na ezaleli ya Ye, na misala mya Ye. Abangi te komikotisa na makambo mpo ya kobikisa bato ba ye, na ntango wana, batiamaki pembeni.

 

Yango wana, bandeko, maloba ma anzelu wa Nzambe na bandeko basi, malingi bobele koloba boye :"soko bolingi ya solo koluka Yezu, boluka Ye na kati ya bomoi oyo ye amonisi bino ntango azalaki kotambola na  bino na nzela ya Galilea.  Bosala  lokola Ye asalaki : bomibwaka mobimba na kati ya bomoi, mpo mokili mobongwana mpe mokoma lokola Tata Nzambe alingi 'te mozala. Boyoka Liloba Ye atikeli bino; bosimba batu ya mpasi mpe basumuki lokola Ye asalaki; bosala misala mpo mokili mobotela bino biloko ya kolia mpe bokoka bongo koleisa baninga bato. Bobanga kosakola bosembo mpe bosolo te; bomema bomoi lokola ye Yezu amemi yango tee na nsuka na bosali malamu na bato banso. Soko bosali boye, bokomona Ye : akozala na bino mpe akotambola  liboso ya bino

 

Bandeko ba bolingo

 

Nakosenga na bino banso, moto na moto esika azali, makambo maye mibale : toboya goi-goi mpe tomema lisanga misala ndenge toyokanaki na bandeko banganga-nzambe. Totika goi-goi mpo ya losambo mpe mpo ya koyoka liloba ya Nzambe. Soko yo, ndeko, olingi kosambela solo te, mpe koyoka Liloba ya Nzambe solo te, okopesa na baninga bato mpe mokili ya biso bomoi ya sika ndenge nini? Ozali  naino koluka Yezu o lilita; lamuka, teleme, kota na bomoi ya mokonzi oyo azali kobimisa yo mpo 'te okutana na Ye na losambo, na liloba ya Ye mpe na basakramento. Mokonzi azali na yo ntango inso mpe bipai binso.

 

Totika goi-goi mpo ya bondeko. Bandeko ebele na kati ya biso bayebi kokende kokutana na baninga bato te. Bayebi koyamba mompaya te; bayebi kopesa mbote te na moninga moto oyo bango bayebi te; bayebi kosalisa baninga na mpasi te. Bazali koluka Yezu naino na lilita ya bomoi ya bango moko. Ndeko, lamuka, teleme, kota na bomoi ya baninga bato, mema bango oyo yo ozali mpe oyo ozali na yango. Kuna okomona Yezu.

 

Totika goi-goi mpo ya misala ya kosimba mpe kobongisa bomoi ya  nzoto mpe ya mokili ya biso. Bandeko ebele bazali kolekisa ntango mpamba mpamba.

Koyekola bazali kosala  yango te; misala ya bilanga baboyi kosimba yango; kosala misala ya kobokolo  nyama to koluka ndenge nini tozwa mpe tobokolo mbisi , kuna bazali te. Bazali na kati ya goi-goi; bazali koluka Yezu na kati ya lilita !

Ndeko teleme, sala mosala, bima na goi-goi; santo Polo alobi polele na bandeko ya Tesaloniki boye :"Bandeko o nkombo ya Mokonzi Yezu Kristu, totindi bino bokima bandeko banso bazali goi-goi, baye baboyi kosala lokola totindi bino" (2 Tes. 3,6).

 

Bandeko ba bolingo,

 

Lokola nasengi bino : tomema lisanga misala ndenge bokoyoka epai ya bandeko ba nganga-nzambe. Feti ya Pasika ezali feti ya lisanga; Kristu asekwi lokola Yaya wa bato banso mpe wa bikelamo binso (Col 1,15). Afungoleli biso banso nzela ya bomoi mpo 'te bato banso mpe bikelamo binso bitonda na bomoi ya sika. Mokonzi alingi te 'te basusu batonda na biloko, ntango basusu bazali kokufwa nzala. Oyo wana ezali bomoi ya bato bazangi bosembo, bomoi ya bato batikala na bomoi ya kala; bomoi ya bato basekwi te. Kasi awa biso tondimi 'te Kristu asekwi, lisanga ya biso likomi lisanga ya bato bandimi kolonga bomoi lisanga.

 

Bilanga ya lisanga tokosala, misala misusu ya lisanga tokobanda na paroisses inso mpe bipai na bipai, nakosenga 'te moko moko ya biso amikotisa na kati. Moto abenda nzoto te. Biso tokoki mpe tosengeli kolonga nzala; biso tokoki mpe tosengeli kolonga maladi ndenge na ndenge oyo euti na bosoto ya mboka; biso tokoki mpe tosengeli kolonga bozangi misala...  Mokonzi alobi liloba liye lokola liloba lya nsuka, nsima ya nsekwa ya Ye: "Boyeba boye, ngai nazali na bino ntango inso kin'o nsuka ya molongo" (Mt 28,20). Tobanga lisusu nini?

 

Bandeko ba bolingo,

 

Kristu asekwi Alleluia! Afrika ekosekwa; ekolo ya biso, Mai-Ndombe ekosekwa. Kristu amonisi biso na bomoi ya Ye mobimba nzela ya bomoi bwa solo. Atikala o kati ya  bomoi bwa biso ya mokolo na mokolo.  Apesa biso nguya ya kopesa baninga bato mpe mokili moye bomoi tozui na nsekwa ya Ye. Tolonga lisanga liwa : tozali bato ba bomoi, bato ba nsekwa.

Boboto bwa Mokonzi botikala na bino mikolo minso. Mbote na bino banso mpe bobenisi bwa Nzambe bozinga bino mokolo na mokolo. Amen.

 

                                                           Wa bino,

                                                         Papa  Episkopo,

                                                       + Philippe NKIERE KENA

                                                         Episkopo wa Inongo

 

       
                
            __ !__
                ! M
               

Aucun commentaire:

Mgr Philippe NKIERE KENA

Mgr Philippe NKIERE KENA
Evêque d'Inongo (2005- )

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO

Mgr Jan Van Cauwelaert

Mgr Jan Van Cauwelaert
1er Evêque D'Inongo(1959-1967) dcd 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
Evêque Emérite(1967-2005) dcd 19.11.17