vendredi 6 juillet 2007

Lettre Past. Paques 2007

DIOCESE D’INONGO
Lettre pastorale 3

MESSAGE PASCAL AUX FRERES/SOEURS DU DIOCESE D’INONGO.
(à lire un dimanche de Pâques, du 15 avril-13 mai 2007)

« MPO NA NINI BOKOLUKA O KATI YA BAWA MOTO AZALI NA BOMOI » ? (Luk 24, 5 )
Bandeko ba bolingo,

Natombeli bino banso mpe moko moko eyenga elamu ya Pasika, eyenga elamu ya Nsekwa ya Mokonzi.
Biso bandeko bakristu ya diocèse ya Inongo tosengeli kosepela solo na Pasika ya mobu oyo. Ezali Pasika ekwei na kati ya mobu nkama moko banda tozwi nsango Elamu ya Yezu Kristu. Mobu nkama moko mobimba Mokonzi Yezu atamboli na biso na kati ya bomoi ya mokolo na mokolo, aleisi biso na Liloba lya Ye mpe na basakramentu (Ukristia, bolimbisi masumu, libala, bonganga...). Mobu nkama moko mobimba Mokonzi yezu akotisi biso o bolingo bwa Ye na tata wa Ye, ndenge ‘te Nzambe akomi Nzambe ya biso, Tata ya biso oyo asepeli na biso. Mobu nkama moko mobimba oyo Mokonzi ayei komikotisa Ye moko na kati ya biso lokola Yaya ya biso banso, ndenge ‘te biso banso, mibali na basi, bato bake na bato banene, batwa na baoto tokomi biso banso baleki ya Yezu, tokomi bandeko. Mobu nkama moko mobimba oyo Mokonzi apesi biso nguya ya kotika bomoi ya kala ( bomoi ya mobulu, bomoi ya koyiba, bomoi ya kolanda bobele mposa ya biso moko...) mpo ya kolanda bomoi ya sika oyo ekosepelisa Nzambe mpe ekopesa bomoi na baninga bato. Mobu nkama moko mobimba oyo Eklezia ya biso ya Inongo ekoli mpe eboti mbuma ebele... biso tokoki koluka lisusu Mokonzi Yezu o kati ya bawa te : Azali na bomoi solo mpe bomoi bwa Ye bomonani kati ya biso.
”Mpo nini bokoluka o kati ya liwa moto azali na bomoi “ ?

Bandeko ba bolingo, toyebi banso ndenge bandeko bakristu ebele lelo bazali koluka Nzambe na kati ya “visions”, na kati ya “miracles”, na kati ya biyamba-yamba ndenge na ndenge. Bakanisi ‘te nguya ya Nzambe ebombami na kati ya makambo ya sekele !
Bandeko, Mokonzi azali lelo na kati ya liloba ya bomoi azali kopesa biso. Kuna nde esika nguya ya Ye ezali kofungola biso mitema, kopesa biso elikya, komonisa biso nzela : “ liloba lya yo Mokonzi lizali mwinda likomema makolo ma ngai”(ps.119)
Mokonzi azali lelo na kati ya bomoi ya biso, esika bato bazali kosalisa baninga na kati ya mpasi; esika bato bazali kobunda mpo ‘te awa epai ya biso bato basusu batika konyokolo baninga, kokosa baninga, konyata baninga, kokabola bato na maloba mpe na misala ya bango. Mokonzi azali lelo esika biso tokopesa kilo (valeur) na bato oyo tokobengaka” bato mpamba” zambi banda mokolo Yezu oyo babomaki na kuruse asekwi moto moko azali lisusu moto mpamba te. Mokonzi azali lelo esika bato bakomibwaka na kati ya bomoi mpe balongi bobangi. Solo bobangi boleki mingi epai ya biso.

Na Pasika eye, bandeko ba bolingo, Mokonzi akosenga biso ‘te totika kobanga bomoi. Ye abuki bokasi ya liwa, bokasi ya Satana. Tobanga lisusu nini ? Mokonzi akosenga biso ‘te totika nguya ya liloba ya Ye emema biso na kati ya bomoi. Bongo totonga Mai-Ndombe ya sika esika bosembo, boboto, bolimbisani bozali, esika nguya ya komeka makambo ma sika ezali. Totonga Mai-Ndombe ya sika esika bato bakotika kobanga makambo, kobanga milimo mabe mpo Yezu Kristu asili alongi liwa, libanga lisili lilongwi na monoko ya lilita: totika koluka Ye o kati ya bawa, Ye moto azali na bomoi. Ye alingi ‘te tozala bato ba nsekwa, bato bakopesa bomoi na baninga bato mpe na mokili mwa biso.

Eyenga Elamu ya Pasika na bino banso.

Wa bino,

Tata Episkopo + Philippe Nkiere Kena
Episkopo wa Inongo
Inongo, Pasika 2007 (8 avril 2007)

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO